Luka

Kuruzé ya Yubilé Kuruzé ya Yubilé  (ANSA)

Yubilé ya ba Confreries, Roma ezali kozela pene ya bandimi nkoto nkàmà yoko (100 000)

Ba etùlùkù ya bato bazali koyà na mokàma ya bikolo kobanda mokolo mwa zomi na mwambé ya sànzà ya mayi. Soki balongoli mobembo mpo ya koleka na Ezibelo Esantu, Ezali mpe na molongo ya bato, teleme ya bango ya nsuka ekozala na Circus Maximus. O mokolo mwa lomingo, ba confreries bakokende na place Saint-Pierre, bakolata bilamba ya bizaleli ya bankoko ba bango, na Misa ya bobandi bontomà ya Léon ya zomi na mineyi (XIV).

Bansango ya Vatikan

 

Pene ya bandimi nkoto nkàmà moko (100 000) bakokende na Roma mp ona yubilé ya ba confreries. Milùlù minà mikoleka o mokolo mwa mitano mwa zomi na mwambé ya sànzà ya mayi. Bato ba mobembo bakoùta na bikolo nkàmà (100) ya bakontinà nyonso. Kasi etùlùkù eliki bato mingi ezali oyo ya Italia, Espagne, Etats-Uni, Portugal, Allemagne, Republique Tchèque, Canada, India, Indonesiya, Philipina, Chili, Ethiopie, Australie mpe Nouvelle-Zélande.

Bokutani na Saint-Jean-de-Latran

O mokolo mwa mitano na ngonga ya 8h00 tee 17h00, baconfreries balekaki na Ezibelo Esanto ya baziliki ya baPàpa. Na ngonga ya 17h00 ba confreries ya Roma bakoyamba bitùlùkù ya bato bamobembo bakoùta na mokili mobimba. Bakokutana na likita moko ya koyamba, ebongisamaki na lisalisi lya mosàlà basàlaki elongo kati na diosezi ya Roma nà baziliki ya Saint-Jean-de-Latran.  

Mokolo mwa Poso na ngonga ya 14h00, bakosàla molongo molayi mokoleka na banzela ya enguma oyo ezali kolakisa boyambi ya bato, na kati ya Italie, Europe mpe mokili mobimba. Na libakù linà, bakolakisa bililingi mibale ya « ya Santisimo Cristo ya Expiracion» oyo batambwisaka na mokolo mwa Mitano-Esanto ya andalou. Ebengami mpe na nkombo ya « El Cristo del Cachorro» ya Séville. Ezali mosàlà mwa ntoki ya eleko ya baroque andalou, ebandaki na mobù 1682. Ezali molayi pene ya 2 metre; bongo bamemaka yango likolo ya ferculum oyo bakokumbaka bato tukù mineyi na mibalé (42). Ezali mpe na elilingi ya “Vierge de l’Esperance” ya Malaga. Ekeko eye ezali monene makasi, bamemaka yango na bato 270. Bakolakisa yango mibale kobanda mokolo mwa mibale mwa zomi na misato (13) ya sànzà ya mayi kino mokolo mwa  zomi na sambo (17), o kati ya baziliki ya Saint-Pierre.

Ebakata ya molongo

Ebakata ya molongo moye mokokabolama na mipayi mibalé. Moko na moko ekozwa nzela na yango mpe bakoyà kokùtana na Circus Maximus. Molongo moko ekozala na ba confreries mwambé,bongo bakolongwa kobanda esika ya Celimontana na ngonga ya 14h00, bakolanda nzela via Claudia mpe via Celio Vibenna kino Circus Maximus, sima bakozongela esika babanddaki na nzela ya Via Claudia na nzela ya nzinganzinga. Molongo mosusu mokokutana na yé; kasi mokolongwa lolenge yoko na ngonga ya 14h00, kasi ut’o Largo Cavalieri di Colombo, ekozwa nzela ya viale delle Terme di Caracalla mpe bakosukisa na kati ya Circus Maximus.

Pàpa François nà  Notre-Dame ya Lujan, Mosantu-ndoyi  ya Argentina, o mokolo mwa 8 ya sànzà ya maiyi na mobù 2024, na place Saint-Pierre
Pàpa François nà Notre-Dame ya Lujan, Mosantu-ndoyi ya Argentina, o mokolo mwa 8 ya sànzà ya maiyi na mobù 2024, na place Saint-Pierre

Na Saint-Pierre elongo nà Pàpa

Na nsuka ya Yubilé, o mokolo mwa zomi na mwambé (18) ya sànzà ya mayi na ngonga ya 10h30, na place Saint-Pierre, baconfreries nà bandeko babango bakosàngana na Misa ya bobandi bontomà ya Pàpa Léon XIV, na bilamba esengeli bo momeseno.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

17 sánzá ya mítáno 2025, 09:50