Côte d’Ivoire, Apostolat missionnaire ya Cénacle na boyoki bwa Elimo-Santu.
Albys KBD CP – Kinshasa/RDC
Nkitela ya Elimo Santu na bapostolu ba Kristu, mikolo tuku mitano sima ya Pasika, “epesi ntina o bokristu bwa biso”. Mokolo mwa Pantekoste, lokola likomami o buku bya bikela bya bapostolu na Mikanda misantu, sima ya lokito liùtaki na mbalakaka o likolo, na mompepe makasi “ekitelaki moko na moko ya bango na elembo ya miloli mya moto. Banso batondisamaki na Elimo Santu, babandaki koloba na ba nkota misusu, moto na moto azalaki koloba engebene na likabo lya Elimo”.
Mosala mwa Elimo mokokoba lisusu
Lelomei, Elimo Santoezali kokoba lisusu na komimonisa o kati ya eklezia, na ba paloasse ndenge na ndenges, ba muvema mpe masanga, kasi mpe na mangomba masika mibotamaki sima ya Concile ya Vatikan ya mibale. “Mikolo minso, Elimo Santu nà mayoki ma yé ma boboto, ezongisaka sika o kati ya biso, mayoki ma yé mwa boboto”, elobi bongo Epherlin Delucresse, mobandisi mpe moyangeli ya Apostolat missionnaire du Cénacle. Aùti na mboka Côte d’Ivoire, akosangana na likita lya misato ya Conférence internationale ya mangomba karismatique. Maman na likanisi lyango ezali: «babyangemi nakozala lisanga ya bosakoli»
«Lokola bakambi ya mangomba mayemasika, tozali na bokobi ya nkitela ya Elimo Santu. Mokolo na mokolo tozali kosala esperience ya Elimo Santu». Akanisaki maloba ma santu Seraphin ya Savov, azalaki koloba ‘te «ntina ya solo solo ya kozala mokristo ezali na kozwa Elimo-Santu wa Nzambe». “Oyo tokosala ezali na ntina, kaka soki tomitiki kotambwisama na Elimo”.
«Elimo ekopepe epai elingi»
« Bakoki kotandela Elimo mwa Nzambe nzela». Moyangeli Delucresse abyangi nakomitika kotambwisama na Elimo. Abeti nsete na devotion na Maria, mpamba te, devotion na Maria ekofungola bomonisami ya Elimo. MPo na yé , nkitela ya yambo ya elimo, ezali “oyo Maria azwaki liboso ya pantekoste”. Misala ekosalisaka biso makambo ndenge na ndenge, kasi esengeli koyoka lolaka la Mokonzi.
Mosala mwa etindà
Elimo ekolakisama na balolenge ebele, ekobi yé koloba, “to moni boni boni asali o kati ya padre Pio, nà sango Tardif, mpe, to moni lolenge kani azali kosala kati na sango Abekan, na mangomba karismatiki to lisusu na ba movema manso ebalani na CHARIS”, oyo ezali mosala ya Renouvo karismatiki ya katoliko na mokili ekelami na Saint-Siege, na lisalisi lya dicastere mpoya ba layiki, mabota, mpe bomoi. CHARIS ebimaki na mpwasa o mokolo mwa nkitela na mobù 2019.
Epherlin Delucresse, amipesi na mosala elongo na lingomba lya yé ya katoliko o ekolo ya yé. Na mabele ma Afrika, mpe na libanda ya kontina alengelaka ba tango ya bansambo, mateya mpo ya bilenge, basi mpe bana, na mbongo ya ye moko. Solo, Apostolat missionnaire ya Cénacle ekokutanaka na mikakatano yam bongo, kasi ekotika mosala mwa Mokonzi te. Mpamba te, na mokili mwa lelo, mingi mizali kotungisama to mozoki na bomoi bwa bango, bongo, basengeli na kosala esperience nà Kristu.
Bososoli
Na mosala mwa ye, moyangeli ya Cote d’Ivoire apesi esika ya motuya na bososoli,mingi mpenza tango ozali kokamba bato ba Nzambe. Alobi yango mpo na makambo ndenge na ndenge bakutani na yango na mangomba maye masika. Na yango abeti nsete alobi: bososoli etikali eloko y antina, mpe alendisi “nakolongobana na eklezya”. “ekozalo bobungi tokoki kosala te, soki tokanisi ‘te Nzambe alingaki kolobela biso…; to Nzambe apesi biso makanisi, mpamba te ezali biloko eklezya ekoyeba malamu te”.
Tosengeli komanyola na lisalisi lya mateya mya eklezya, ya magistère, ya badogme eklezya ekopesaka biso, mpe ya Mikanda Misantu. Abengi na botosi, kozwa ndakisa na batata bya eklezya, na ba episkopo, ba mimpe. Na manso, kosenga likabo lya bososoli na Elimo Santu kati na losambo, mpo ezali mpe ekotikala na motuya. Tosengeli kozala na makita ya bansambo ya konzo (makasi mpenza). Mobandisi mya Apostolat missionnaire ya Cénacle “”akumisi mosala na mokili, oyo renuvo karismatiki ya katoliko ezali kokokisa na nzela ya mateya ma yé na likambo lya intercession prophetique. Tosengeli kosambela, esukisaki yé.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.